3 Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ;
Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »
Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki.
Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo !
Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.