Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 14:29 - Mokanda na Bomoi

29 Yesu alobaki na ye : — Yaka. Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 14:29
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Petelo alobaki na Ye : — Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi.


Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : — Nkolo, bikisa ngai !


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.


Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.


Nkolo azongisaki : — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.


Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.


Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te.


Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ