Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.
Kasi anjelu alobaki na ye : — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. »
Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona : — Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.
Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.