amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango.
Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu : « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »