Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.
Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?