Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 14:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 14:20
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »


Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.


Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.


Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo : bokolia kasi bokotonda te.


Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »


Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.


Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?


Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !


Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.


Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.


Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ