Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 14:2 - Mokanda na Bomoi

2 Alobaki na basali na ye : — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 14:2
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.


Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.


Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda :


Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »


Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli.


Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, »


Bato mingi penza bayaki epai na Ye ; bazalaki koloba : « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ