Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye : — Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.
Lokola ezalaki Yuda nde azalaki kobatela libenga ya mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye : « Kende kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpo na feti, » to « kende kopesa lisungi epai ya babola. »