12 Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango ; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu.
Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye.
Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo.
Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko.
Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.