Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »