Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.
Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.