Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 14:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 14:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.


Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.


Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.


Yesu akebisaki bango : — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode !


Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa.


Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.


Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.


Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.


Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango.


Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ