Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:8 - Mokanda na Bomoi

8 kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.


Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu ; bongo akobota bambuma : epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko ; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.


Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;


Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu : bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma ; moko aboti bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.


Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »


Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.


Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.


Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba : evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango.


bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ