Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:57 - Mokanda na Bomoi

57 Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:57
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Akozala lokola Esika ya bule ; kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato ; bongo mpo na bato ya Yelusalemi, akozala motambo mpe monyama.


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.


Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama.


Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »


Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.


Yesu alobaki na bango : « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »


Abakisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye.


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Solo, Ye moko Yesu alobaki ete mosakoli azwaka lokumu te kati na ekolo na ye.


Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »


Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ