49 Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,
monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.
Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili :
Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.
Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.