Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:47 - Mokanda na Bomoi

47 Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:47
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.


Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.


Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.


Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.


Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »


Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »


Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona : — Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.


Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.


Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.


Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.


Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.


Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.


Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde : « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo : Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ