Mpe bana ya Isalaele bazalaki komona elongi ya Moyize kongenga. Bongo azalaki kozongisa vwale na elongi na ye kino tango azalaki kozonga mpo na kosolola na Yawe.
Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.
Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?