Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:41 - Mokanda na Bomoi

41 Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:41
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube oyo babwakaka mosika ; basimbaka yango te na maboko pamba.


« solo, nakoboma ezala bato to banyama, ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale ; nakolongola, na mokili, bato mabe mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku » elobi Yawe.


Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,


Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.


Nyonso wana ekomonana polele, na mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.


Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.


Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ