Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:39 - Mokanda na Bomoi

39 monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:39
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.


Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te, ezala na bomoi na ye awa na se to na bomoi oyo ekoya.


Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.


Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.


Nkolo elanga azongisaki : ‹ Ezali monguna nde asali bongo ! › Basali batunaki lisusu : ‹ Olingi tokende kopikola yango ? ›


Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili :


Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,


Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.


Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.


Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.


oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.


Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.


Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye.


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango : « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ