27 Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki : ‹ Mokonzi ; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo ? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi ? ›
Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.
Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.