Nkona yango ekolaki mpe ekomaki nzete ya vino ; ezalaki penza mokuse, kasi bitape na yango ezalaki efungwama mpe etala na ngambo ya mpongo. Bongo misisa na yango ezalaki kaka etikala na se na yango. Ekomaki nzete ya vino, ebotaki bitape mpe ebimisaki makasa ebele.