Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:24 - Mokanda na Bomoi

24 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:24
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te ezali nde « Bilobaloba ya pamba. »


Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango se bilobaloba ya pamba mpo ete, wana ezali bango kotambola, bakweya na ndenge ya sima, babukana mikongo, bazwama na mitambo mpe bakangama.


« Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele.


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.


Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.


Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »


Yesu azongisaki : — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto.


Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.


Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo.


Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.


Boyoka lisese mosusu : Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.


— Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.


Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.


« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?


Yesu atunaki lisusu : — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini ?


Kondima mpe bolingo yango etongami na likolo ya elikya ya bomengo oyo Nzambe abongisela bino kati na Likolo ; elikya yango ebotamaki kati na bino tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu


Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ