Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 13:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 13:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.


Joasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada.


Mokonzi abengisaki Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe alobaki na ye : « Mpo na nini olobaki te na Balevi ete bakongola, wuta na Yuda mpe na Yelusalemi, mpako oyo Moyize, mosali na Yawe, akatelaki lisanga ya Isalaele mpo na Ndako ya kapo ya Litatoli ? »


Pamba te mokolo na mokolo, balukaka Ngai, basalaka lokola bato bazali na esengo ya koyeba nzela na Ngai, lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ; basengaka Ngai mikano ya sembo, mpe basalaka lokola bato bazali na esengo ya kozala pene ya Nzambe ;


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.


pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.


pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.


Solo, Yoane azalaki lokola mwinda oyo bapelisi mpe ezali kongenga. Kasi bino, boponaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke.


Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi ; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ