Matayo 13:19 - Mokanda na Bomoi19 Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu ? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele ; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »
Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.