14 Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami : « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ; miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !
Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele : bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.
« Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.
Azongiselaki bango : — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete, atako bakoki kotala, bamona te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.