10 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye : — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese ?
Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.
Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba : — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !
Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese.
Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango.