Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 12:42 - Mokanda na Bomoi

42 Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 12:42
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili mobimba ezalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye.


nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.


Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.


Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo !


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.


Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna : « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ