Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 12:4 - Mokanda na Bomoi

4 ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 12:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.


Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali : « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki : ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. ›


Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala,


Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango ?


Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye ; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.


Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.


Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.


Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo ? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango.


Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe : — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ