Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 12:29 - Mokanda na Bomoi

29 Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga ? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 12:29
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumba na maboko ya basoda ya mpiko to kokangola mokangami wuta na maboko ya monyokoli na ye ?


Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.


Kasi soki ezali na nguya ya Molimo ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.


Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.


Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.


Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.


Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ