Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 12:25 - Mokanda na Bomoi

25 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 12:25
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale : ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi ; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri.


oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?


Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango : — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ?


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te ? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.


Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ