24 Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?
Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.