Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !