Matayo 12:22 - Mokanda na Bomoi22 Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.