Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
« Tala mosali na Ngai, oyo naponi ; molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakopesa Ye Molimo na Ngai, mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya.
Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.