Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 12:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 12:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.


Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.


Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ;


Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.


bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.


Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.


Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye,


Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango.


Ezali na mokolo wana nde bazwaki mokano ya koboma Yesu.


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.


Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.


Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.


Bamosusu kati na bango balukaki kokanga Ye, kasi moto ata moko te alongaki.


Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ