11 Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ?
Bongo atunaki bango : — Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe ; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango ?