Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 12:10 - Mokanda na Bomoi

10 epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu : — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ? Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 12:10
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe : atiolaka nzela ya bule, alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.


kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.


Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo ; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta ; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.


Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo !


Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu : — Tala bayekoli na Yo ! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba.


Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?


Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.


na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.


Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !


Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?


— Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye.


mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !


Boye, bakambi ya Bayuda balobaki na moto oyo abikisamaki : — Lelo ezali mokolo ya Saba ; ozali na ndingisa te ya komema etoko oyo.


Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango : bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana,


Bongo soki bokataka bato ngenga na mokolo ya Saba, mpe yango ebukaka mobeko ya Moyize te, mpo na nini bozali kosilikela Ngai mpo ete nabikisi moto na mokolo ya Saba ?


Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.


Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ