Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
Lisumu oyo bato na ngai basali ezali monene koleka lisumu ya Sodome, engumba oyo ebebisamaki na mbala moko wana moto moko te asembolaki loboko na ye mpo na kotelemela yango.
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, Sodome, ndeko na yo ya mwasi, elongo na bana na ye ya basi batikala nanu kosala te makambo oyo yo elongo na bana na yo ya basi bosali.
Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.]