Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 11:22
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bakonzi nyonso ya Tiri mpe ya Sidoni ; bakonzi ya bisanga mpe ya bituka oyo ezalaka pene ya ebale monene ;


Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.


« Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri ; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri.


Moyi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo ya Yawe ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya somo.


Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.


Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !


Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome.


Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.


Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.


ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.


elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.


Nzokande, ezali mpe kaka Liloba yango nde azali kobomba Likolo mpe mabele ya sik’oyo mpo na kozika na moto, na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisama ya bato ya masumu.


Tala mpo na nini bolingo ezali ya kokoka kati na biso : ezali mpo ete tozala na elikya ya kokoka na mokolo ya kosambisama ; pamba te kati na mokili oyo, ndenge Klisto azali, ndenge biso mpe tozali.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ