Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 11:21 - Mokanda na Bomoi

21 Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 11:21
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »


Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »


Moyi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo ya Yawe ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya somo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.


Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.


Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.


Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.


Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.


Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri. Akotaki kati na ndako moko ; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama.


Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi.


Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso ; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye.


Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni.


Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.


Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.


Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida.


Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo : — Tata, tolingi komona Yesu.


Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.


Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango.


Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo ; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ