Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 11:17 - Mokanda na Bomoi

17 « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 11:17
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye.


Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye ; mabele eninganaki na makelele na bango.


Mpo na bino, bokoyemba banzembo lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule ; mitema na bino ekotonda na esengo lokola bato oyo bazali kobeta flite mpo na kokende na Ngomba ya Yawe, na Libanga ya Isalaele.


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :


Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »


Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.


Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele.


Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina.


Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye.


Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu : « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki te ! »


Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ