Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 11:16 - Mokanda na Bomoi

16 Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 11:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


« Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. »


Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :


Nazali koloba na bino penza ya solo : etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.


balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›


Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.


Wana azalaki koteya, Yesu alobaki : — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;


Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango ?


Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.


Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ