Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 11:13 - Mokanda na Bomoi

13 Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 11:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.


Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.


Kasi sik’oyo, na kozanga kosalela Mobeko, Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ