Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !


Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »


Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso.


Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.


Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te.


bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.


bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango : « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. »


Kasi Petelo alobaki na ye : — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.


Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ