Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.


Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.


Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ? Bazongisaki : — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,


Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [


« Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema.


Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.


mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli.


Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.


Yesu alobaki na ye : — Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.


Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.


Tango Petelo alingaki kokota na ndako, Kornei apusanaki pene na ye, amibwakaki na makolo na ye mpo na kogumbamela ye.


azalaki kosakola sango ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya na tina na Nkolo Yesu-Klisto, na molende nyonso mpe na kozanga bipekiseli.


na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ