Matayo 10:6 - Mokanda na Bomoi6 Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo ; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki ; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango !
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba ; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai ;