Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:36 - Mokanda na Bomoi

36 banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:36
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »


Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.


Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »


Soki monguna nde azalaki kofinga ngai, nalingaki kokanga motema ; soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai, nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.


« Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango : ndeko akobundisa ndeko na ye, moninga akobundisa moninga na ye, engumba moko ekobundisa engumba mosusu, mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.


Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye ; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.


Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.


Kasi Petelo alobaki na Yesu : — Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo ! Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.


Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ