34 Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga.
Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.
Kasi Bayuda oyo baboyaki kondimela batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokela bandeko.
Bato ya engumba yango bakabwanaki : ndambo bazalaki sima na Bayuda, mpe ndambo mosusu, sima na bantoma.
Tango Polo asilisaki koloba, Bayuda bakendeki, mpe bazalaki kotiana tembe makasi kati na bango.]
Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.
Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba.