31 Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
namitunaka : Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye ?
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.