Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;
Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.
Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »
Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. »
Natanaele atunaki Ye : — Oyebi ngai ndenge nini ? Yesu azongiselaki ye : — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ;